« Soki moto moko kati na bino azali bameme kama moko (100), mpe soki abungisi meme moko, akosala nini ? Akotika bameme tuku libwa na libwa (99) na esobe, mpe akokende koluka meme oyo ebungi, tii tango ako zwa yango. Soki amoni yango akoyoka esengo mingi, akotia yango na mapeka, mpe akozonga na mboka na ye. Na sima akobenga baninga na ye nà bato oyo bafandaka na ye penepene, bongo ako loba na bango : boya tosepela, mpo namoni meme na ngai oyo ebungaki » Luka 15.4-6.
2 sánzá ya mítáno 2024 in Bóti Ya Kretiyani, Color 4 minutes
Nazali na moninga moko. Aleki baninga na ngai nyonso. Apesi bopolo mpe bosembo ; nde tina nalingi yo mpe oyeba ye. Ya kokamwa ezali ’te ye mpe alingi akoma moninga nayo. Nalingi kosolola na yo na tina na ye. Lisolo na ye ezwami kati na Biblia. Biblia ezali solo liloba na Nzambe. Nzambe nde asalaki mokili na nyoso oyo ezali kati na yango. Azali Nkolo ya lola mpe mabele. Apesaka bomoi mpe pema na bikelamu binso.
2 sánzá ya mítáno 2024 in Yezú, Mɔngó, Móbɔkɔ, Póngi Ya Sólɔ, Color 2 minutes
Ozali na esengo ? Kobanga mpe lisosoli malamu elongoli bomengo na yo ? Okani kotikana na somo mpe likanisi ya komifunda ? Mbala mosusu okomituna ; « nakoki lisusu kozwa na bomengo ? » Nazali na Sango Malamu mpo na yo ! Moto moko akoki kosunga yo, kolimbisa masumu na yo mpe kopesa yo bomengo ya koumela, kombo na ye Yesu. Tika nalobela yo mpo na ye.
Naino mibu mibandi te, Nzambe azalaka. Akelaki mokili na nyonso kati na yango. Na bolingo na ye, nzambe akelaki moto na elilingi na ye mpe atiaki ye na elanga moko kitoko. Moto aboyaki kotosa mitindo na Nzambe. Na sima Nzambe alobaki na bato ’te bapesa mbeka ya bana ya nyama oyo izangi libebi po ’te masumu na bango malimbisama. Mbeka yango ekokaki kofuta nyongo ya masumu na bango te, nzoka nde ezalaki elembo ya mbeka ya motuya oyo Nzambe ako kaba mokolo moko. Mokolo moko Nzambe akotinda mwana na ye Yesu na mokili oyo po azala mbeka se moko mpo na masumu ya bato nyonso.
Ezali na moto moko ayebi makambo na yo nyonso ; oyebi yango ? Nzambe asali mokili na nyonso oyo ezali kati na yango. Yesu mwana ya Nzambe mpe ayebi nyonso oyo asali. Ye nde asalaki mokili na nyoso oyo ezali kati na yango. Ayebi maye maleki, maye mazali, na oyo ekoya. Alingi yo mpe ayaki na mokili mpo na kobikisa yo na masumu. Ayangi mwango mpo na bomoi na yo mpo na komemela yo bomengo.
2 sánzá ya mítáno 2024 in Yezú, Mɔngó, Língɛlɛ, Color 3 minutes