Nazali na moninga moko. Aleki baninga na ngai nyonso. Apesi bopolo mpe bosembo ; nde tina nalingi yo mpe oyeba ye. Ya kokamwa ezali ’te ye mpe alingi akoma moninga nayo. Nalingi kosolola na yo na tina na ye. Lisolo na ye ezwami kati na Biblia. Biblia ezali solo liloba na Nzambe. Nzambe nde asalaki mokili na nyoso oyo ezali kati na yango. Azali Nkolo ya lola mpe mabele. Apesaka bomoi mpe pema na bikelamu binso.
2 sánzá ya mítáno 2024 in Yezú, Mɔngó, Móbɔkɔ, Póngi Ya Sólɔ, Color 2 minutes