Ndako

Boyei malamu na site internet ya Trakte ya Nsango Malamu mpe ya Société biblia

Livrets

Bayeli ye bana mike mpo atiela bango maboko. Bato mosusu bayeli Yesu bana po asimba bango, kasi bayekoli babandi kopekisa bango. Tango Yesu amoni bongo, asiliki mpe alobi na bango « botika bana baya epai na ngai, bopekisa bango te, pamba te bokonzi ya Nzambe ezali mpo na baoyo bakokani na bango. Nalobi na bino, ya solo ; moto oyo akoyamba bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke te, akokota kuna ata moke te. Sima ayambi bana, asimbi bango na mitu mpe abenisi bango » Marko 10.13-16.

Ezali na moto moko ayebi makambo na yo nyonso ; oyebi yango ? Nzambe asali mokili na nyonso oyo ezali kati na yango. Yesu mwana ya Nzambe mpe ayebi nyonso oyo asali. Ye nde asalaki mokili na nyoso oyo ezali kati na yango. Ayebi maye maleki, maye mazali, na oyo ekoya. Alingi yo mpe ayaki na mokili mpo na kobikisa yo na masumu. Ayangi mwango mpo na bomoi na yo mpo na komemela yo bomengo.

Yezú, Mɔngó, Língɛlɛ, Color 3 minutes

Naino mibu mibandi te, Nzambe azalaka. Akelaki mokili na nyonso kati na yango. Na bolingo na ye, nzambe akelaki moto na elilingi na ye mpe atiaki ye na elanga moko kitoko. Moto aboyaki kotosa mitindo na Nzambe. Na sima Nzambe alobaki na bato ’te bapesa mbeka ya bana ya nyama oyo izangi libebi po ’te masumu na bango malimbisama. Mbeka yango ekokaki kofuta nyongo ya masumu na bango te, nzoka nde ezalaki elembo ya mbeka ya motuya oyo Nzambe ako kaba mokolo moko. Mokolo moko Nzambe akotinda mwana na ye Yesu na mokili oyo po azala mbeka se moko mpo na masumu ya bato nyonso.

Yezú, Color 4 minutes

« Kimia, wapi kimia ? Kimia na bikolo na biso, ba ndako na biso na koleka kati na molimo na biso ? » Mololo ya kobanga ezali koganga bikeke na bikeke. Yango nde mpe lolaka ya motema na yo ? Mokili ezali ya kolemba mpe ezangi kimia.Tozali na posa ya toli mpe bokengi, kimia mpe kondima. Tosengeli na yango mpe tolingi yango, yango molimo na kimia. Molimo kati na kimia, eloko ya motuya. Bozwi ya motuya ekoki kozwama kati na mokili oyo etondi na bonguna, kozanga kimia, yikiyiki mpe bobangi ?

Lɔkɔ́lɔ 4 minutes

« Soki moto moko kati na bino azali bameme kama moko (100), mpe soki abungisi meme moko, akosala nini ? Akotika bameme tuku libwa na libwa (99) na esobe, mpe akokende koluka meme oyo ebungi, tii tango ako zwa yango. Soki amoni yango akoyoka esengo mingi, akotia yango na mapeka, mpe akozonga na mboka na ye. Na sima akobenga baninga na ye nà bato oyo bafandaka na ye penepene, bongo ako loba na bango : boya tosepela, mpo namoni meme na ngai oyo ebungaki » Luka 15.4-6. Yesu, mobateli malamu

Ndenge nini koyeba lolenge ya bitumba ya Satana kolandana na liloba na Nzambe. Ezali mposa ya Makomi Mosantu te komonisa Satana mpe misala na ye lokola likambo na motuya. Nzoka nde Biblia ezali komonisa polele, mbala mingi bizaleli na ye mpe misala na ye.

Sálɔ́0 6 minutes

Sikoyo ozali na bomoi, ozali kopema, kotambola to osala. Tango mosusu azali na bomoi ya malamu to te, bomoi na yo etonda na mawa ? Moyi ekobima mpe kolala, mwana abotami awa, kuna akufi. BOMOI EZALI YA NGONGA KASI OKOKENDE WAPI SIMA YA LIWA ? Ozala moi eyamba To ozongi kondima- Osengeli kopesa eyano na motuna Oyo ya litomba, Mpo te sima ya bomoi mokuse awa na nse, moto akokende na ndako na ye ya seko (Mosakoli 12.7). KASI WAPI ?