« Soki moto moko kati na bino azali bameme kama moko (100), mpe soki abungisi meme moko, akosala nini ? Akotika bameme tuku libwa na libwa (99) na esobe, mpe akokende koluka meme oyo ebungi, tii tango ako zwa yango. Soki amoni yango akoyoka esengo mingi, akotia yango na mapeka, mpe akozonga na mboka na ye. Na sima akobenga baninga na ye nà bato oyo bafandaka na ye penepene, bongo ako loba na bango : boya tosepela, mpo namoni meme na ngai oyo ebungaki » Luka 15.4-6.
Yesu, mobateli malamu
Lisolo elandi elakisi bolingo mpe ebiangeli na Yesu mpo na bato nyoso. Mobateli moko azalaki na bameme kama moko. Alingaki yango mpe abatelaki yango na lobwaku kitoko na nse ya ba ngomba. Lobwaku yango ezalaki malamu nzokande ba ngomba ezalaki na likama. « Yawe azali mpo na ngai lokola mobokoli ya bameme. Nakoki kozanga eloko moko te. Apemisaka ngai kati ya matiti mobesu, amemaka ngai epai ya mai ya kimia ». Banzembo 23.4-2.
Tango mosusu mobateli amemaki bameme na ye kati na ba ngomba mpo na kozwa matiti. Azalaki kobatela yango, mpe komema yango na lobwaku esika ya kimia na pokwa. Na porte azalaki kotanga na tango ya kokota na lopango. « Yesu alobi lisusu ; nazali lokola porte ya lopango ya bameme. Ngai nazali porte ya lopango. Moto oyo akotaka epai na ngai, akobika ». Yoane 10.7,9.
Meme moko ebungi
Pokwa moko, mobateli atangaki bameme tuku libwa na libwa. Moko na yango azalaki nanu likolo na ngomba. Lokola alingaki kotala mokili, ayaki sima. Matiti mobesu ebendaki ye mosika na nzela. Etelemaki kotala fololo, ba nzete mpe matiti oyo amonaki liboso te. Abosanaki kolanda mobateli mpe atikalaki sima mosika. Na pokwa eyaki koyeba ’te ezali mosika na isusu ; ebangaki mpe ekimaki mbangu, na loyenge, elandi nzela ya mabe ; emoni mobateli te, bameme te, ata mpe nzela ya lopango.
Butu ekotaki mpe mopepe makasi epepaki. Meme yango ebombanaki kati na matiti, epoli na mai, na mawa. « Biso nyoso topanzanaki lokola bameme, tokomaki kokende moto na moto na nzela naye. Kasi Yawe atiaki mabe na biso nyoso na nzoto na ye » (Ezaya 53.6). Suka suka, kake na mbula ekatanaki. Makelele na bilili ya somo ebangisaki meme mpe ekimaki mbangu. Nzube epasolaki yango, makila etangisaki meme mpe ekimaki ma,yata na yango mpe elandaki yango.
Emonaki mobateli ’te meme ebungi, akangaki porte ya lopango, asimbi nzete na ye azongi na ngomba. Ye mpe abundaki na mopepe mpe molili. Ayokaki nzala, bilamba na ye epolaki mpe ayokaki mpio. Mbala na mbala atelemaki kobenga meme, azwaki eyano te. Alembaki, kasi akobaki koluka na etingia. Wana eyokaki ye koganga ya ba mbwa ya zamba, ayebaki ’te meme ezalaki na likama. Alandaki noki esika yango. Elikya ya kobikisa meme esilaki ?
Meme oyo ebungaki eyokaki koganga ba,bwa ya zamba. Ekobaki kaka kokima kino elembaki makasi. Eyebaki te ’te ba mbwa ya mabe ezalaki kolanda yango mpe komema yango na motambo. Na butu likambo ya somo ekwelaki ye : ekangamaki kati ya ba sende mosika te na lobwaku. Etangisaki makila na kolemba mpe mbwa izingaki yango. Ebundaki kasi ekokaki te.
Meme ebiki
Eyokaki mobateli ayaki noki, abundaki na bambwa mpe abenganaki yango mosika na lobwaku. Abelemaki na meme mpe akongolaki ye na ba sende mpe ememi yango mosika na lobwaku. Na sima asukolaki ba pota na yango mpe apakoli kisi ya kobikisa. Na sima amemaki yango na moboko kino na lopangu ya bameme. Meme oyo ebungaki emonanaki. Nakokende kokamata yango na bisika oyo epanzanaki. (Ezekiel 34.12).
Biso banso tozali lokola meme oyo ebungi : Yesu, mobateli malamu alingi biso mpe apesi biso esika yako kobombana. Monguna azali, alingi kobebisa molimo na biso. Satana azali komeka biso na biloko mingi ya kopengwisa : alaki biso bonzwi mpe bisengo. Bilaka na ye bikokisamakate. Bolamu na kofungwama oyo alaka biso bizali ya lokuta, tokozwa yango te. Tokosami mpe tobangi : tozoki mpe topasukipasuki. Tozali koyengayenga mpe tokoki kokima te.
Yesu abongisaki nzela ya kokimela. Tango nyoso azali kokoba koluka boye balandaki Satana mpe bakwei na motambo na mayele mabe na ye. « Mwana na moto ayei koluka mpe kobikisa bato oyo babunga » (Luc 19.10).
Na Matayo 11.28 ; « Boya epai na ngai, bino nyoso oyo bazali komona mpasi mpe bolembi na mikumba… nakosalisa bino bofanda kimia ». Tosengeli kobondela epai na Yesu wana tayamboli lisumu na biso na nzela ya kosenga bolimbisi. Na sima topesa ye bomoi na biso mabimba na nzela ya kotika ba nzela mabe na biso. Akufi mpo na biso mpe afutaki nyongo ya masumu na biso na makila na ye mpo tokoma peto mpe basomi liboso na Nzambe. Esengo mingi na lola soki meme oyo ebungaki emonani mpe ezongiami na lopango na yango. « Tango akomona meme akoyoka esengo mongi koleka esengo azali koyoka mpo na bameme tuku libwa na libwa oyo ebungaki te ». (Matayo 18.13).