Kosalisa index ya kosombela...
Ezali mabɛlɛ na lisusu ya kosombela
Ezali likambo mpo na "Query here"
Kosombela na FlexSearch
Lokasa oyo ozali koluka ezali te to ekendeki na esika mosusu.
Bayeli ye bana mike mpo atiela bango maboko. Bato mosusu bayeli Yesu bana po asimba bango, kasi bayekoli babandi kopekisa bango. Tango Yesu amoni bongo, asiliki mpe alobi na bango « botika bana baya epai na ngai, bopekisa bango te, pamba te bokonzi ya Nzambe ezali mpo na baoyo bakokani na bango. Nalobi na bino, ya solo ; moto oyo akoyamba bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke te, akokota kuna ata moke te. Sima ayambi bana, asimbi bango na mitu mpe abenisi bango » Marko 10.13-16.
« Kimia, wapi kimia ? Kimia na bikolo na biso, ba ndako na biso na koleka kati na molimo na biso ? » Mololo ya kobanga ezali koganga bikeke na bikeke. Yango nde mpe lolaka ya motema na yo ? Mokili ezali ya kolemba mpe ezangi kimia.Tozali na posa ya toli mpe bokengi, kimia mpe kondima. Tosengeli na yango mpe tolingi yango, yango molimo na kimia. Molimo kati na kimia, eloko ya motuya. Bozwi ya motuya ekoki kozwama kati na mokili oyo etondi na bonguna, kozanga kimia, yikiyiki mpe bobangi ?
Sikoyo ozali na bomoi, ozali kopema, kotambola to osala. Tango mosusu azali na bomoi ya malamu to te, bomoi na yo etonda na mawa ? Moyi ekobima mpe kolala, mwana abotami awa, kuna akufi. BOMOI EZALI YA NGONGA KASI OKOKENDE WAPI SIMA YA LIWA ? Ozala moi eyamba To ozongi kondima- Osengeli kopesa eyano na motuna Oyo ya litomba, Mpo te sima ya bomoi mokuse awa na nse, moto akokende na ndako na ye ya seko (Mosakoli 12.7). KASI WAPI ?